Obongi Na Lokumu (Tu Es Digne De Gloire)

3 views

Lyrics

Alléluia, alléluia
 Monisa nkémbo na Yo, mokonzi
 Obongi na lokumu
 Obongi na nkémbo pe na masanjoli, moyengebene
 Nzambe ya solo nde Yo
 Tofukami liboso na Yo
 Tokiti liboso n'o mokonzi
 Alléluia
 ♪
 Kombo na Yo ekumisama
 Mpo Y'ozali Nzambe
 Bolingo na Yo efanda na mitéma
 Y'ozali Nzambe
 Mpe nionso efukamela Yo
 Mpo lokumu ezali ya Yo
 Netolama Nkolo na nionso
 Togumbameli Yo, Yésu
 Yo molingami na nga
 Bomoyi na nga eza ya Yo
 Na sé ya ngolu na Yo, namona nkémbo
 Y'ozali Nzambe
 Mpe nionso efukamela Yo
 Mpo lokumu ezali ya Yo (alléluia)
 Netolama Nkolo na nionso
 Togumbameli Yo, Yésu
 Nani abongi na lokumu lokola Masiya?
 Oyo liloba na yé eza nguya
 Bipayi binso bomoyi bojali, Y'ojali Nkolo
 Nionso efukama na kombo na Yo
 Y'obongi na lokumu
 Y'ofandi na bisika
 Bileki na nkémbo
 Nkolo na bolingo nionso
 Yo ndé Nzambe na nguya
 Mokokisi na bilaka
 Nkémbo eza ya Yo
 Zua lokumu Nkolo
 Nazala lokola Yo
 Sala ete bomoyi na nga na ya Yo ezala moko
 Natatola mpe nayemba ete Y'obongi na lokumu
 Nani aza lokola Yo?
 Otombolaka nkita pe lokumu la mboka
 Totatoli mpe toyembi ete Y'obongi na lokumu
 Alléluia, ozali Nzambe obongi na lokumu
 Ozali Nzambe oyo atombolaka nkita ya ekolo
 Otombolaka lokumu ya mboka, Nkolo na bomoyi
 Nzambe ya mboka Congo ezali Yo
 Tomisopi liboso na Yo
 Po ete ozali Nkolo, Nkolo oyo asepeli kofanda na kiti ya bokonzi ya mboka oyo
 Y'obongi na lukumu
 Y'ofandi na bisika
 Bileki na nkémbo
 Nkolo na bolingo nionso
 Yo ndé Nzambe na nguya
 Mokokisi na bilaka
 Nkémbo eza ya Yo zwa lokumu, Nkolo (na zala lokola)
 Na zala lokola Yo
 Sala ete bomoyi na nga na ya Yo ezala moko
 Na tatola mpe na yemba ete Y'obongi na lokumu (nani aza lokola)
 Nani aza lokola yo? (Otombolaka)
 Otombolaka nkita pe lokumu la mboka
 Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu
 Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu (na nionso osali, to tomboli Yo)
 Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu (to tatoli, to tatoli eh)
 Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu (to tatoli, to tatoli eh)
 Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu
 Alléluia, Tu es digne de gloire
 Toi qui as déversé Ton amour dans nos cœurs
 Afin que nous puissions aimer comme Toi
 Alléluia
 

Audio Features

Song Details

Duration
06:22
Key
4
Tempo
108 BPM

Share

More Songs by Adorons L'eternel & Alain Moloto - Athom's Mbuma

Similar Songs