Tuna ngai nini ?

3 views

Lyrics

Natali na bomoyi na nga na yoki pasi emati
 Tuna nga nini yaya esengo ezali te
 Na tali na mobongo na nga na yoki pasi emati
 Tuna nga nini yaya?
 Bofuluki ezali te
 Na kanisi bilaka na
 Olobaki esengo ngolu eko zala na nga ezali wapi?
 Ngonga epusani eh
 Ko lela eleki eh
 Olobi nini Nzambe pona bomoyi na nga?
 Ekila ya monene boye ekalami na liloba na yo
 Nini ango ezo zanga po loba ya nga pasi esila?
 Nzambe na nga ozali wapi Nzambe nanga?
 Est ce que oyoki te?
 Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga?
 Est ce que omoni te?
 Awuti zamba alembi
 Tala elobi nga yoyo
 Likolo ya bileyi ya kolia
 Esaü ateki bo yaya
 Na wutaka musala na yo
 Na zongaka maboko pamba
 Mokili etalisi nga bomengo
 Na boyi ko teka bokristo pona yo
 Nzambe na nga ozali wapi Nzambe na nga?
 Est ce que oyoki te?
 Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga?
 Est ce que omoni te?
 Ozali nzete nga etabe
 Nioso ya yo ezali pe ya nga
 Olati nkembo lokola elamba
 Nga na lati mawa lokola kasaka
 Na luki na yeba esengo nde nini?
 Bozuwi pe nini?
 Na taleli yo
 Nzambe na nga ozali wapi Nzambe nanga?
 Nzambe na nga na tuni wapi Nzambe na nga?

Audio Features

Song Details

Duration
05:14
Key
4
Tempo
80 BPM

Share

More Songs by Moise Mbiye

Similar Songs