Yesu Azali Awa

3 views

Lyrics

Na ngambo ya Egypito molili ehh
 Na ngambo ya Israël polé ebimi ehh
 Bisika Yesu aza eyébanaka
 Présence na Yé, polé na ngai
 Sanduku ya mibéko ékéyi wapi ehh
 Ekéyi kopambola Obed Édom ehh
 Bisika Yésu aza ébunganaka té ohh
 Présence na Yé, lipamboli na ngai
 Ah yaya
 Yésu azali awa
 Bapékisa nionso mais bapékisa yo koluka Nzambe té
 Na makolo yé nde bisika tobombama
 Esalaka ngai neti liboma
 Soki Yésu na ngai akiti awa
 Nayébaka té napésa yé nini
 Nionso nazali éza sé Yésu
 Andima ngambo ya bomoyi na ngai ehh
 Andima ngambo ya mikumba na ngai
 Andima ngambo ya bitumba na ngai ehh
 Bolingo ya boyé namona te ohh
 Ba misusu ba mata ti na ba ngomba ehh
 Ba belela Yé, ayoka bango té
 Ngai na tomboli kaka maboko ya pamba
 Akiti mbangu ayoka losambo ehh
 Êêêêêêê
 Yésu azali awa
 Na ngambo ya Egypito molili ehh
 Na ngambo ya Israël polé ébimi ehh
 Bisika Yésu aza éyébanaka
 Présence na Yé, polé na yo
 Sanduku ya mibéko ékéyi wapi ehh
 Ekéyi kopambola Obed Édom eh
 Bisika Yésu aza éyébanaka
 Présence na Yé, lipamboli na yo ehh
 Êêêêê
 Yesu azali awa
 Yésu na ngaï ehh
 Azali awa nga na senga
 Nzambe na nga oyo
 A laka ako tika ngai té
 Ako zala na ngai
 Aki tambola na ngaï ehh
 A lapa ndaï po na ngaï ehh
 Ngaï na lingi yé
 Yo mutu ozo luka o mona changement na vie na yo
 Yo muto olingi makambo ebongwana
 Yo muto ozo supporté lisusu té ba bêtises ya satana na vie na yo
 Moment yango yango oyo
 Sala geste moko
 Lobela Ye maloba
 Il est là pour t'écouter
 Il est prêt
 Il peut encore te relever
 Il peut encore te restaurer
 Il peut encore te guérir
 Il peut encore te toucher
 Il peut encore te pardonner
 Il est là Jésus est là
 Soki yo té mbele na kufa na ngaï
 Soki Yo te mbele nasila na ngaï
 Yo nde nionso ya motuya na ngai ehh
 Ehh Yaya
 Mobimba na ngai se maya na Yo
 Mobimba na ngai se ngolu na Yo
 Ondimela ngai tango moto andima ngai te
 Ngai nalingi Yé êê
 Yo nde nionso ya motuya na ngai êêê
 Soki Yo te mbele nakufa na ngai îîî
 Zalaka pene na ngai êêê
 Eh! Yaya.

Audio Features

Song Details

Duration
08:00
Key
9
Tempo
117 BPM

Share

More Songs by Moise Mbiye

Similar Songs