Eh Yahwe (Remix)

3 views

Lyrics

Tongo etana, butu eyinda eh
 Kembo na nzambe, etondi mokili iii
 Batunaka ngai, wapi nzambe nayo
 Nzambe na ngai, afandi na nkembo
 okumama yahweh
 Eh Yahweh, eh yahweh kumama (kumama yahweh
 Eh yahweh, eh yahweh kumama (oh kumama yahweh)
 eh yahweh eh yahweh kumama
 eh yahweh eh yahweh kuma
 Na mokilli batunaka ngai, wapi nzambe na yo
 Nayanoli na lolendo, avandi na nkembo
 Engambe mobali, nzambe oyo azongaka sima te
 Tika na netola yo, makasi na ngai, okumama yawhe
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Wuta na yeba masiya, posa ya mokili esila ngai
 Namela may'a bomoyi, azipa libulu'a motema
 Natika koluka luka bipayi binso, nazua oyo ya motuya
 Pauni na ngai ya talo, masiya Yesu na nga, okumama yawhe
 Eh yawhe eh yawhe kumana
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Nzamb'eyo baluba babengi panda njila, akelaka nzela ata n'ebale
 soki okomi na suka, tshela nde yesu motema
 moning'oy'akosaka te, asalaka pe fière te
 Luka ye butu pe moyi, aza n'eyano na yo oh kumama yawhe
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Eh yawhe eh yawhe kumama
 Eh yawhe kumama yawhe na nga kumama
 Eh yawhe kumama yawhe na nga kumama
 Mokeli ya mokili, nzambe na nga (kumama yawhe na nga kumama)
 Mokeli na nioso, muninga motema(kumama yawhe na nga kumama)
 Elombe mobali, nzambe oyo na mona nanu te (kumama yawhe na nga kumama)
 Elikya ya bomoyi na nga, nzambe oyo na tutelaka tolo (kumama yawhe na nga kumama)
 Ata naza na papa na ngai (kumama), yo nde nzambe eh
 Ata naza na maman na ngai (kumama) yo nde nzambe eh
 Ata naza na mokonzi ya mboka (kumama) yo nde nzambe eh
 Ata moto akoti ndako ya libala (kumama) yo nde nzambe eh
 Na pesa yo bisika na nani yesu (kumama) yo nde nzambe eh
 Na pesa nani bisika na yo papa (kumama) yo nde nzambe
 Oh tala biso to yembeli yo, eh yawhe
 Oh tala biso to sanjoli yo, eh yawhe eee
 Eh yawhe
 Eh yawhe ee yoka lelo loyembo na nga
 Eh yawhe ee yoka lelo losambo na nga
 Eh yawhe ee masanjoli ya motema na nga
 Eh yawhe ozali nzambe na nga, kumama
 Oh tala biso to sanjoli yo, eh yawhe
 Oh tala biso to netoli yo, eh yawhe eee
 Eh yawhe
 Eh yawhe eee yoka lelo loyembo na nga
 Eh yawhe eee yamba lelo losambo na nga
 Eh yawhe eee masanjoli ya motema na nga
 Eh yawhe ozali nzambe na nga, kumama
 Y'ozali nzambe eh (yawhe kumama)
 Na yembelaka yo (yawhe kumama)
 Y'ozali nzambe eh (yawhe kumama)
 Na sanjolaka yo (yawhe kumama)
 Y'ozali nzambe ya motema (yawhe kumama)
 Na netolaka yo (yawhe kumama)
 Soki na tali santé na ngai (yawhe kumama)
 Sujet ya malamu ya ko sanjola yo (yawhe kumama)
 Soki natali bomoyi na ngai (yawhe kumama)
 Sujet ya malamu ya ko netola yo (yawhe kumama)
 Soki na tali mboka ya congo (yawhe kumama)
 Sujet ya malamu ya ko sanjola yo (yawhe kumama)
 Pema nazui na tongo kino pokwa (yawhe kumama)
 Sujet ya malamu ya ko netola yo (yawhe kumama)
 Soki na kanisi molimo (yawhe kumama)
 Sujet ya malamu ya ko netola yo (yawhe kumama)
 Soki na kanisi muana na mpate (yawhe kumama)
 Sujet ya malamu yo ko sanjola yo (yawhe kumama)
 Na fukama na lala na mabele (yawhe kumama)
 Loyembo na nga esopana liboso na yo (yawhe kumama)
 Monoko na nga esanjola nzambe oyo (yawhe kumama)
 Elikya ya bomoyi na nga papa (yawhe kumama)
 Na kumisa na netola papa na ngai (yawhe kumama)
 Elikya ya bomoyi na nga
 Yesu eee oh yesu na nga yaya
 Yesu eee oh yesu na nga yaya
 Yesu eee oh yesu na nga yaya
 Yesu eee oh yesu na nga yaya
 Yesu eee oh yesu na nga yaya
 Yesu eee oh yesu na nga yaya
 Ohhh Y'ozali nzambe kumama
 Y'ozali nzambe na nga (yawhe kumama)
 Y'ozali nzambe eh nkolo na nga (yawhe kumama)
 Oh motema na ngai yesu, emesana ko netola yo
 Molimo na ngai yesu, emesana ko sanjola yo
 Tangwa na bikeke nzambe na nga
 Na yembela yo loyembo ya bolingo
 Na pesa yo masanjoli bongo yawhe osopa mapamboli
 Na langwa na bolingo ya papa
 Maloba ya motema esopani
 Nkolo yesu eee yawhe kumama X
 Nkolo yesu na nga

Audio Features

Song Details

Duration
05:35
Key
4
Tempo
96 BPM

Share

More Songs by Alain Moloto'

Similar Songs