Nkolo na bomoyi

3 views

Lyrics

Moyéngébéné oyo akotisa basikolami na liziba ya bosantu
 Mpo été bonzambé etangama na bomoyi ya bato
 Azalí loléngé ya kozála
 Oyo epelisa mwǐnda oyo ye azalí na molili ya bakangami mpó bakangolama
 Akotisa bomoyi na bisika liwa etangama
 Maloba mayé áloba, esilisa butu ya mikakatano
 Mpé ematisa bendélé ya bonsomi na mitéma miyé mindimela yé
 Mokonzi oyo basakoli baleka, batatola
 Nzamb'oyo amimonisa pólélé na mǐso na bato
 Oyo asopaka londéndé ya nkémbo na yé bipayi kombo na yé etangami
 Oyo afanda kati na maloba ma yé mpo été akokisa mango bo elobama
 Nzamb'oyo apesaka esengo nakotatola mpé kolobela
 Oyo améma mikumba ya bayé balembi bomoyi
 Nzamb'oyo afungolaka bikuké bia sika pona kolekisa mpé ko komisa bayé abiangi
 Azali esengo ya kozala, azali kimia ya mitéma
 Azali nguya ya seko ya Nzambe tata
 Azali ekuké ya ebombamelo ya basantu
 Azali mpé moto mayé mazikisaka misala ya Satana
 Azali lisekwa mpé bomoyi bwa seko
 Mobikisi ba beli, mosekwisi bawa
 Mobondisi mpé molendisi ya bayé batungisami
 Motambwisi na nzéla ya solo, oyo yé meyi azalí
 

Audio Features

Song Details

Duration
01:32
Key
7
Tempo
78 BPM

Share

More Songs by Alain Moloto

Similar Songs