Tala muana na mpate

1 views

Lyrics

Yowani akawusaki mayi na miso,
 Po amonaki Bomoyi
 Emoniseli ememi ngai lelo na bomoyi
 Bazuaki ya mwana na mpate elilingi na Yesu
 Azalaki mbeka ya lisapo oyo ya Bibiliya
 Banda kokela apesamaki na ba bomi nyama
 Afungolaki mongongo te azalaki na singa,
 Yamokano na Nzambe
 ah biso toweli bomoyi
 Nani alolinga kozua singa ya kufa na kingo na ye?
 Lokola ntaba, ya mwana na mpate?
 Bikelamu ya likolo mpe na se towelaka bomoyi
 Kasi Yesu a ponaki kokufela se nga na yo.
 Azalaki nde mbeka epa na Nzambe Tata
 Nakokitisama na ye ya mwana na mpate
 Na getesema nalongue te na mokano na Papa
 Yango tozui lobiko
 Talela Yesu mopesi bomoyi
 Tala mwana na mpate na Nzambe
 Molongoli masumo na mokili
 Tala mwana na mpate na Nzambe
 Ndeko yaka, mona mpe bila Yesu
 Nalelaki mingi pasi na nga ezangaki moto, moto abikisa
 (Soki Yesu te mais na suki wapi?)
 Azuamaki te na mokili oyo akokaki ko somba, ko sombela ngai bomiyeee
 Na Makila na Yesu, na longi kufa, maladie mpe bobola, nga nazui lobiko, lobiko
 (kuna nde nazui ko bika, kuna nde nazui lobiko, na talela Yesu, tika nga nasalela Ye)
 Tala mwana na mpate na Nzambe
 Molongoli masumo na mokili
 Tala mwana na mpate na Nzambe
 Ndeko yaka, mona mpe bila Yesu
 Nalelaki mingi pasi na nga ezangaki moto, moto abikisa
 (Soki Yo te papa!)
 Azuamaki te na mabele oyo akokaki kopesa, kopesa bomiyi ya seko
 (Mais na pola kala na mabele)
 Na ekuluso na longi satana (...) Yesu, akokisi nyoso, pona ngai
 Tala mwana na mpate na Nzambe
 Molongoli masumo na mokili
 Tala mwana na mpate na Nzambe
 Ndeko yaka, mona mpe bila Yesu
 Alongi kufa(Yesu)
 Apesi bomoyi
 Abimisi ngai lelo na se ya libulo
 Maladie na ngai
 Ezui kulusu
 Nabili lelo oyo na salela ye
 Yesu, Yesu, nazalaki ntaba, ntaba ya bonane, soki yo te
 Nde na nani...

Audio Features

Song Details

Duration
06:36
Tempo
132 BPM

Share

More Songs by Carlyto Lassa

Similar Songs