Identité Ya Mokonzi

3 views

Lyrics

Naye na nionso nazali epayi na yo mokéli
 Bomoyi na ngai efukami, na tatola oyo osali na ngai
 Yamba masanjoli ewuti na motéma na nga, libonza na pesi na yo
 Malasi ya motuya nga na sopi liboso ya kiti na yo
 Bipayi na kutani na liziba ya ngolu eh
 Eko tanga na motema, ya motuya na ngai
 Opesi bomoyi bwa yo mbeka ya motuya Nkolo
 Osopi makila ma talo kosomba milimo oyo ya baye ba ndimeli yo
 Yango na koti lelo oyo na molongo ya ba longi yaya
 Yango namoni kati na ngai bilembo ya bonzambe bwa yo
 Yango na fandi lelo bipayi Y'ozali eh
 Na mona kembo na Yo
 Yango na semboli loboko na tatola sé bolingo bwa Yo
 Na fongoli motéma eh, na yamba ngolu na yo Nkolo
 Na zala oy'olingi po'ete na sepelisa motéma na Yo nkolo ya bomoyi na ngai
 Yango na semboli loboko na tatola sé bolingo bwa Yo
 Na fongoli motéma eh, na yamba ngolu na yo Nkolo
 Na zala oy'o lingi po'ete na sepelisa motéma na Yo nkolo ya bomoyi na ngai
 Wuta na kutana na yo eh, lisapo na ng'ebongwani
 Wut'o lokota ngai mokweyi, Y'o ndimi ngai kati yo, nazui identité
 Bomoyi o'ya ba bulami, na koti kati ya bonzambé
 O modelé ngai, opesi forme, mon passé s'est écoulé
 Yango na koti lel'oyo na molongo ya ba longi, yaya
 Yango na moni kati na ngai bilembo ya bonzambé bwa Yo
 Yango na fandi lelo bipayi y'ozali eh
 Na mona nkémbo na Yo
 Y'obongoli lolenge na ngai
 Nazui mpe ntina na kati ya bonzambé
 Y'o ndimi ngai to zala baninga, ma main dans Ta main
 To tambola elongo oh, na mozindo ya bolingo'a Nzambé
 Masolo ya mitéma esopana, zala wa ngai nalingi yo oh, Yésu eh
 Nzété ya bo pemi na ngai, mosisa oyo esimbi ko ndima na ngai
 Merci mp'ozui nionso ya ngai eh, mosantu eh
 Olatisa ngai elamba ya sika, kombo na yo (kombo na Yo, Yésu)
 Identité ya mokonzi nazwi, na koti na molongo
 Propriété privée ya nzambe, eh ngai nazwi ngolu
 Yo ndé bolingo ya sika
 Olatisa ngai elamba ya sika, kombo na yo (kombo na Yo, Yésu)
 Identité ya mokonzi nazwi, na koti na molongo
 Propriété privée ya nzambe, eh ngai nazwi ngolu
 Yo ndé bomoyi ya sika
 Identité ya mokonzi, nazali oyo azali eh (ngai na wuta na Yésu)
 Na wuti kati na Yésu, na zali mwana na Nzambe
 Yango naza ko dondwa eh, lokola Nzambe ya mwana
 Identité ya mokonzi, nazali oyo azali eh (oh, ngai na wuta na Yésu)
 Na wuti kati na Yésu, na zali mwana na Nzambe
 Yango naza ko dondwa eh, lokola Nzambe ya mwana
 Yango na semboli loboko na tatola sé bolingo bwa Yo (bwa Yo)
 Na fongoli motéma eh, na yamba ngolu na yo Nkolo (natika yango polélé)
 Na zala oy'o lingi po'ete na sepelisa motéma na Yo nkolo ya bomoyi na ngai (motéma na Yo papa na nga)
 Yango na semboli loboko na tatola sé bolingo bwa Yo (na fongoli motéma)
 Na fongoli motéma eh, na yamba ngolu na yo Nkolo
 Na zala oy'o lingi po'ete na sepelisa motéma na Yo nkolo ya bomoyi na ngai
 Yango na semboli loboko na tatola sé bolingo bwa Yo (nafo
 Na fongoli motéma eh, na yamba ngolu na yo Nkolo
 Na zala oy'o lingi po'ete na sepelisa motéma na Yo nkolo ya bomoyi na ngai
 (Na sepelisa motéma ya Nzambe, eh mokeli na ngai)

Audio Features

Song Details

Duration
06:32
Key
6
Tempo
101 BPM

Share

More Songs by Groupe Adorons l’Eternel G.A.E.L

Similar Songs