Obongi Na Lokumu

3 views

Lyrics

Nini yango to pesa bato oyo ba ko salaka
 Makambo oyo eko leka lokola bango
 Maloba ya ngo to simba eko pimbwa
 Na kayina ya bomoyi, ooh-ooh-oh, oh
 Oyo ya motuya to pesa nani?
 Bato ya mayele ba memaki ba wolo
 Mpe malasi ya motuya na bango
 Yoka loyembo ya motéma ndé libonza
 Oya motuya na nga na ko pesa
 Bato ya mayele ba memaki ba wolo
 Mpe malasi ya motuya na bango
 Yoka loyembo ya motéma ndé libonza
 Oya motuya na nga na ko pesa
 Yahwe na nga, Schilo (Y'obongi na lokumu)
 Obongi na lokumu (oh, Yésu)
 Mosikoli ya bomoyi ya bato (Yahwe, Y'ofandi)
 Ofandi na nkémbo Yésu (Y'obongi)
 Obongi na lokumu (oh, Y'obongi)
 Obongi na lokumu (mosikoli ya bomoyi ya bato)
 Mosikoli ya bomoyi ya bato (Y'ofandi na nkémbo)
 Ofandi na nkémbo Yésu (Y'obongi)
 Obongi na lokumu
 Molili esili kati na mokili, Yésu
 Moyi ya bosémbo angengisi basantu
 Tala yé likolo a'ako ngala
 Ooh mozonto na tongo, Yésu masiya
 Azala, azali pé ako zala
 Ooh likolo na nionso, Nzambé na nga
 Yahwe na nga, Schilo (Y'obongi na lokumu)
 Obongi na lokumu (Yésu na nga)
 Mosikoli ya bomoyi ya bato (Y'ofandi)
 Ofandi na nkémbo Yésu (Y'obongi)
 Obongi na lokumu (Y'obongi na lokumu)
 Obongi na lokumu (mosikoli ya bomoyi ya bato)
 Mosikoli ya bomoyi ya bato (Y'ofandi na nkémbo)
 Ofandi na nkémbo Yésu (Y'obongi)
 Obongi na lokumu
 Yahwe na nga, Schilo (Y'obongi na lokumu)
 Yahwe na nga, Schilo (Y'obongi na lokumu)
 Nzambe bayemba, batika té
 Yahwe na nga (Y'obongi na lokumu)
 Esengo etondi na likolo
 Yahwe na nga (Y'obongi na lokumu)
 Awa na sé pé lokumu emata
 Yahwe na nga (Y'obongi na lokumu)
 Nioka motako atobwami eeh, maladie esili (Y'obongui na lokumu)
 Mwana na mpate a netwami, Yahwe, tokomi basantu (Y'obongi na lokumu)
 Y'obongi eh
 Y'obongi eh
 Y'obongi eh
 Y'obongi eh

Audio Features

Song Details

Duration
06:25
Key
4
Tempo
93 BPM

Share

More Songs by Groupe Adorons l’Eternel G.A.E.L

Similar Songs