Bye bye

5 views

Lyrics

Kenda kaka eeeh (ngayi natikala, a bout-pia!)
 Bayaka na vie ya moto, po ô apporter yé un petit plus
 Bayaka té po ô bakiselaka moto pasi
 Ô bomi nga na arme kombo bolingo
 Kasi ata na weh
 Na kolinga yo deuxième tour, mokolo toko kutana nayo na paradiso
 Laurent Lorenzo, Lenny Kravitz yo na Jean-Jacques Mutuale
 Bo mema ko lela nanga ti epaya
 Tshibo Apula, ballon d'or
 ♪
 Simba nga na loboko, laisser les morts enterrer leurs morts
 Lokola otié nga mbeli na mokongo ekoti motema té ooh
 Mema nga nakufela na nzela que n'esika otié nga likula iiih
 Soki kobanga esali yo
 Kamata likala sonika na mokongo adresse ya ndako na ngayi
 Mpo moleki nzela soki aleki, amemela Mama Amy sango
 Nyama makasi balandaka yé na sima sé na mwana na yé
 Moto mosusu asundoli nga na nzela, ebembé ezangi témoin
 ♪
 Faute na nga moko oooh
 Faute eeeh, na ngayi (faute na nga moko Tshibo eeh)
 Liboso ya komata motuka il fallait natuna crique pé pneu ya réserve
 Motuka ekufeli nga nasi na futi ticket eeh
 Sofelé matisa nga motuka ya connaissance na yo
 Mpasi kolinga moto, alingaka yo té oooh
 Tshibo Apula eeh
 Tshibo oooh
 Faute eeeh (Tshibo na nga aah)
 Na nga aaah (Apula aaah)
 Ya José Kisoka (Tshibo ooh na nga)
 Charlie Malula aah (Tshibo yo oooh)
 Nzambé eeeh (Tshibo na nga aah, ballon d'or)
 Bolingo etindi ngayi congé na lilita eeh
 Nga na botama po na wah kasi ô brusquer liwa na ngayi
 Zolo elula mabele, miso elula yo Tshibo ooh Apula eeh
 Cimetière ba kunda nkoko nayebi
 Y'okundeli ngayi bolingo ko wapi?
 Na sala ata tombeau ya regret Tshibo ooh Apula aah (Tshibo oooh)
 Oh Tshibo yé eeh (Tshibo mama)
 Apula motema na nga (Apula aaah)
 Ballon d'or (Tshibo ooh na nga)
 Carine Mukassa, Lina Bilani (Tshibo oooh)
 Tshibo ooh na nga, ballon d'or
 Y'ozosala nga na nko lokola obeti gazon na moto
 Que oko niokolo nga, Tshibo ooh Apula
 Yaweh yo moko otiaki équilibre na nature
 Y'olingaki ntaba azala herbivore et lion carnivore eeh
 Motema ya moto eliya bolingo, kasi soucis té
 Y'osalaki que moto aliyaka mosuni, imbwa mokuwa eeh
 Tala lelo Tshibo akeyi, motema etondi na ba soucis
 Bye bye kende-kende kende
 Natikali a bout pia!
 ♪
 Tongo tana noki, nga nalongwa na misère
 Butu pourquoi vraiment ozo leka au ralenti
 Nzambé sala que pasi na nga elekana accéléré
 Tshibo Apula olali wapi
 Mokongo, libumu nzoto moko kasi ba monana té
 Miso ezwa chance yako mona yo
 Pourquoi ozo kima ngo?
 Yo ONU osala OMS pé UNESCO kasi obosana
 Kosala ODAED
 Organisation des amoureux en danger
 Organisation des amoureux en danger
 Eeh Nzambé olukela biso problème kombo bolingo
 Ekomi kaka que moto somba casque ya glace
 Otia na mutu, po bolingo quel mutu pasi
 Makambo ya mikol'oyo, bakomi o'linga biso kaka na ba après-midis eeh
 Soki kaka 21heure ekoki, appareil ekangama
 Cherie ayambaka lisusu té
 Ata e sonné, sonné
 Wana veut-dire titulaire ya poste avandi pembeni
 Kenda kaka eeh
 Ngayi natikala aah
 Kuna epayi oko koma
 Oko kutana na moto
 Bo kolingana kaka aah eeh
 Oyebi bien qu'estomac na nga elingaka pili pili té
 Y'olambi supu olekisi ndungu vraiment yayi lufua na mu Tshibo eeh
 Awa y'okitisi nzungu, koboma makala té
 Oyebi bien que naza na zamba parfois
 Nakoki pé komema mayebo eeh, eeh
 Kenda kaka eeh
 Ngayi natikala aah
 Kuna epayi oko koma
 Oko kutana na moto
 Bo kolingana kaka aah eeh
 Eeh photo ya mokolo ya mariage eeh, bilongi emonani té
 Namituni pourquoi l'amour esali contre-jour
 Kenda kaka eeh
 Ngayi natikala aah
 Kuna epayi oko koma
 Oko kutana na moto
 Bo kolingana kaka aah eeh
 Eeh, kobalan'ezalaki promesse
 Oyo to pesanaki, pourquoi lelo mvula ezo noka
 Nazo pola ngai moko ooh, Tshibo ooh Apula
 Ngayi, différence té na moto ba bengani na hôpital
 Po akomi na stade ya suka ya maladie
 Solution ezo zuama té Tshibo Apula, ballon d'or
 Kenda kaka eeh
 Ngayi natikala aah
 Kuna epayi oko koma
 Oko kutana na moto
 Bo kolingana kaka aah eeh
 

Audio Features

Song Details

Duration
08:00
Tempo
115 BPM

Share

More Songs by Koffi Olomide

Albums by Koffi Olomide

Similar Songs