KO-KO-KO-KO

2 views

Lyrics

ko ko ko ko ko ko ko ko
 eh quartier latin, eza bongo makambo ya nzambe na bana na ye, mopao, lettre a, fally ipupa dicaprio.
 ko ko ko ko ooo fungola ndako nga na batama
 ko ko ko ko ooo fungola ndako po nga na batama
 awa libanda ba nzoko, ba nkoyi ba zo mekana
 bipay'oyo kuna ba tondi meke ya ba metiola pe ba yindo
 moto moyindo pe ya pamba pamba te obe muindo ya ngolo
 ngai ee ekelamo ya nzambe oyo alekela vraiment tango oo
 nani alokota ngai oo apesa ng'ata lipati'a suka
 nani alokota ngai oo ata na moins cher
 obe moko oya ngai james baninga batieli ngai ye miso
 ooo nzambe na ngai bolingo ekomi'okata mosisa aa
 oya motema na ngai oya bomuana boye
 ko ko ko ko ooooo
 déception ya bolingo eko tinda ngai na ba n'importe quoi
 na préférer na kende kokoma na ngai mofuteli ata na lilita ee
 nionso pona kima ata l'amour'a ekukuma boye ee ngai e
 zéro zéro sept eee
 po nini boligo ekomisi dicaprio lokosa mayi oyo esukolaka elamba
 ata na telisi ye kombo na ngai se kobuakama ooo
 ata ko na tie moto makasi na landa elamba ti na singa ee
 basengeli nga moyi ee nionso wana po bakawusa ngai ee
 ata ko na tie gros dos na kota na ye ti na aaa ndako
 badefeli ngai felo pitshou kani, blaise kani
 mawa a olobaka na nga aaaaaa
 kanga motema ee ooo mama didi stone
 tika ba zuwa mama eee
 ozali se yo moko na motema mopao mokonzi
 ko ko ko ko ooooo
 james okomisi ngai na mbok'a sentiment
 okomi'o kangela lisusu porte
 bolingo ebongaka tolingana aa na bolingo ya solo
 mabe yo osali nga ata satan azo szepela te
 nabanzaki'oza muana moke nalakisa yo nzela
 nzok'o kuba
 napesa yo mosuni, olingi mokuwa o ye
 badjou bipé ngai ko ko ko ko ko ooooo na motema
 nayeba aaaa nelly eee
 dimension ya bolingo na nga oooo laurette mbayani
 trop sûr na la vie pe bipale soki eleki epesaka dégoût
 ata mafut'a nzoyi soki'ekoti mpese ekomaka nkele ooo
 caprice ya motuka ba bengaka mécanicien
 oy'a ngai motema ezui en panne ee mécanicien nani ee?
 nakomi lokola moto'a belisi muana sika kitutu uu
 litoyi'e komi elengi koyoka conseil ya moto tout eee
 matiti nionso bako yebisa nga na buka se kobuka
 y'o décourager mitema ya future généation na bolingo
 ooo james zéro zéro sept eee bibiche makope eeee
 aziza makukula aaa ko ko ko ko ooo dyna dynastie
 ooooo koffi olomide, papa michel ombeli eee
 mawa na nga eh
 motema na nga lelo ezangi compagnon eee
 motema na nga lelo ezangi associé eee
 nakeyi koyambana na moto'a kilawu, samy liyawu
 mayele na moto esila nga, mayele nionso james amema
 na licencié na campus, interro'a bolingo na échoué
 nga nazalaka pe magistrat na kataka makambo'a bato
 likambo na nga nakoki te kokata likambo na nga ee
 charly ee, nakoki te kokata likambo na nga eh james eee
 eh zéro zéro sept eh nzongo o ehh hein hein eee
 ko ko ko ko ko
 kot'ata losambo na kanisa ezali zemi'a nzambe
 soki'ozueli nga double te ekosala nga motema pasi eh
 nini ezangi nga eza na ye po o négliger nga eh
 y'oyinisi nga kombo ya ah kolinga
 ata mama abota nga soki alobi alingaka nga nakoboya
 po yo moto olatisa kazaka bolingo o désahabiller nga eh
 verbe aimer totikela se mabele aya ko conjuguer
 po ye nde ayambaka, mabele eboyaka moto te eh
 y'osali nga mbango mbango, vite fait eeee
 ah eh y'osali nga limbele ee vite fait hum hum hummm
 est-ce que c'est vraiment toi mon amour,
 okangi na yo matoyi charly, y'oboy'ata koyoka kolela na nga ee
 y'otika nga na songe ya mboka, matanga ih eh
 mongongo na nga nani'a yoka, charly eee
 kingo na yo na lipeka ya moto mosusu uu
 ata miso ebo kotala, permettre matoyi'eyoka ah
 kolela na nga ya suka, aie pitié kito ooo
 ezwi ngulu'a zamba, ngulu'a mokili ii koseka te
 ezwi fally ipupa, murphy mbongo, lorris la congolaise,
 nazwi férié na motema, faute ewuti epayi'a washington bountshi
 monoko ezwi congé ya ko benga kombo ya charly eh
 o suspendre matoyi koyoka ba je t'aime na yo ooo
 motem'etikala se na stock ya kala ya provision ya bolingo'a charly
 bébé non ku kuenda te oo james charly eh
 aa eee james kokenda te ee, olelisi moto lokola bakandja
 aa eee aa eee zonga zonga ooo junior okito, ya françois babali,
 modogo botekola aa
 ko ko ko ko
 ko ko ko ko
 natondisami na mawa na motema na ngai eh
 natondisami na mawa na mabanzo na nga ah eh
 charly pourquoi otie nga na pourtour'a b'amoureux déçus
 nakomi'otala lisano'a bolingo na mosika ah eh
 lokola na yebi kolinga te eee
 ekosala pasi eee, ekosala pasi eee
 ba ponaka jour'a koboya moninga,
 y'otali'ata calendrier te ooo, y'oboyi nga se jour'a saint hein
 hein hein valentin
 ebandaki na tongo tongo to komi'o yingela pokwa ah
 pardon mon charly, pardon james zéro zéro sept eh,
 beng'ata moninga avant to déborder, to déborder
 na kokufa pona yo eh
 nako craquer pona pasteur nival
 nako kaa
 

Audio Features

Song Details

Duration
08:10
Tempo
100 BPM

Share

More Songs by Koffi Olomide

Albums by Koffi Olomide

Similar Songs