Reconnaissance

3 views

Lyrics

Boseka ngáí té pô naza na bibiliya na maboko
 Esíká nionso na kokende, kombo ya Nzámbe na monoko na ngai'oyo
 ♪
 Basáli ya Nzámbe óyo baza kotéya bísó tango nionso, boyébi té níni óyo Nzámbe
 Asalela bangó pô basálelaka yě, eh
 ♪
 Okomona ngáí tango nionso na nzelá káka ya ekelézya, oyébi té níni óyo Nzámbe asalela nga pô na kendaka eklezya, eh-eh
 ♪
 Ah-ah, motó kutu óyo ya mokili sókí apésí yo eloko osengi merci, eh-eh
 Ebongo Nkóló ya pema, eh, to pessi yě níni
 ♪
 Okomona ngai tango nionso naza ko kombola eklézya
 Oyébi té níni óyo Nzámbe asalela nga pô na salelaka yě, yě, yě, yě
 Ah-ah-ah, ngai-oh
 Nazali reconnaissante, eh-eh-eh
 Makambo asalela nga ya minene papá óyo, ho-oh
 Na wuti na libúlú ya masumu abímísí ngai'oh
 Esika na zalaki ya liwa eh abimisi ngai'oh
 Mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga'eh
 Pongi na ngai na butu, káka ba ndoto ya mabé
 Nani akopesa nga loboko, motó na motó na óyo ya yě
 Nakanisaki libota na nga ekosunga nga epesi nga nde mokongo
 Nasimbaki moto na kolela ngai, pasi elekelaki ngai-oh, Nzamb'oyo
 Ah-ah-ah, ngai-oh
 Nazali reconnaissante, na nzamb'oyo-ho-oh
 Makambo asalela nga ya minene papa oyo, ho-oh
 Na wuti na libulu ya masumu abimisi ngai'oh
 Esíká na zalaki ya liwâ eh abímísí ngai'oh
 Mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga'eh
 Pongi na ngai na butu, káka ba ndoto ya mabé
 Nani akopesa nga loboko, motó na motó na óyo ya yě
 Nakanisaki libóta na nga ekosunga nga epesi nga mokongo
 Nasimbaki motó na kolela ngai, pási elekelaki nga-oh, Nzamb'oyo
 Ah-ah-ah, ngai-oh
 Bomoni tina ngai na lingaka ye
 Na lapa ndayi na vie na ngai-oh, nakosalela ye-eh-eh
 Abetaki ekuke ya motéma na ngai, na fongoli akoti
 Ye wâná camarade ya motéma na ngai-eh, eh, eh, Nzamb'oyo
 Motó na motó na ngónga na ye
 Abetali ekuke ya motema na ngai na fongoli akoti
 Yě wâná camarade na ngai-oh
 Yě wâná thermomètre ya température na ngai-oh-oh
 Yě wana mayi na nga ya komela ekitisaka nga motema
 Yě wâná bileyi na nga ya koliya na tango ya nzala-eh
 Yě wâná menteau na nga-oh, na tango ya malili
 Ye wana makasi na ngai-eh, tango na lembaka-eh, pap'oyo-eh
 Ye wana réanimation ya pema Misamu, yeh, yeh, yeh, Nzamb'oyo
 Ye wana parapluie na ngai-oh, na tango ya mbula
 Ye wana kisi na nga ya komela na tango ya maladie
 Ye wana asilisa pási na ngai-oh, pap'oyo-oh
 Ye wâná alongola soni na ngai-oh, pap'oyo-eh, Nzamb'oyo
 Ye wana parapluie ya Christian Likasi-eh-eh
 Ah-ah-ah, ngai-oh
 Bomoni tina nga na yembelaka ye
 Na lapa ndayi na vie na nga yo na kosalela ye-eh
 Abeta ekuke ya motema na ngai na fongoli akoti
 Ye wana camarade ya motema na ngai-oh, oh, oh, pap'oyo
 Motó na motó na ngónga na yé
 Abetaki ekuke ya motéma na ngai na fongili akoti
 Ye wâná camarade na ngai-eh eh-eh-eh
 Ye wâná moninga na nga ya motéma-yeh-eh-eh
 Ye wâná makási na ngai-eh
 Ye wâná mayi na nga ya komela
 Ye wâná vie na nga mobimba...
 

Audio Features

Song Details

Duration
05:37
Key
2
Tempo
116 BPM

Share

More Songs by Marie Misamu

Similar Songs