Mobali Nangai Wana

3 views

Lyrics

Likambo ya motema oyo
 Likambo ya motema oyo
 Bako samba bako lemba
 Bako silisa ba zuzi
 Moto alingi alingi
 Mobali ya motindo oyo
 Mobali ya motindo oyo
 Kitoko etondi na nzoto
 Azali pe na mwa mbongo
 Na moni akoki na nga
 Na zela te naya ko zanga
 Na zela te naya ko zanga
 Ko bala ekoma na chance
 Basi kitoko ba tondi mboka
 Ba zanga mabala ba tula
 Likambo ya bolingo oyo
 Bolingo ya mobali oyo
 Ebeti ba ngonga na mboka
 Bato na bato ba ganga
 Moto na poni na poni
 Mobali na nga wana nako mema ye na mokongo
 Mobali na nga wana nako mema ye na mokongo
 Oh mobali na nga oyo nako leisa ye na maboko
 Mobali na nga oyo nako leisa ye na maboko
 Mobali na nga wana nako leisa ye lokola bebe
 Mobali na nga wana nako leisa ye lokola bebe
 Oh mobali na nga oyo na sanola ye suki ngai moko
 Oh mobali na nga oyo na sanola ye suki ngai moko
 Oh mobali na nga wana na longola ye manzaka nga moko
 Mobali na nga wana na longola ye manzaka ngai moko
 Oh mobali na nga wana nako kufa kaka mpo naye
 Mobali na nga wana nako kufa kaka po naye
 Likambo ya mobali oyo
 Likambo ya mobali oyo
 Na moni mpasi po na ekolo
 Ye moto ngai pe moto
 Nako kamwa tina bako boya
 Mobali na nga ya kitoko
 Mobali na nga ya motema
 To keseni na ba mbula
 To keseni na ekolo
 Nako vanda kaka na ye
 Bolingo ya ba mbula oyo
 Bolingo ya ba tango oyo
 Eponi ekolo te maman
 Eponi couleur te tata
 Toko luka kaka to bala
 Oh pesa nga chance na bala
 Bo pesa nga chance na bala
 Mobali na nga maboko pete
 Akaba mingi ya mingi
 Nako kufa kaka na ye
 Mobali na nga wana nako mema ye na mboka
 Mobali na nga wana nako mema ye na mboka
 Oh mobali na nga oyo nako mema ye na Equateur
 Mobali na nga oyo nako mema ye na equateur
 Oh mobali na nga wana nako mema ye na Kasai
 Mobali na nga wana nako mema ye na Kasai
 Oh mobali na nga oyo nako mema ye na Bandundu
 Mobali na nga oyo nako mema ye na Bandundu
 Oh mobali na nga wana nako mema ye na Shaba
 Mobali na nga wana nako mema ye na Shaba
 Oh mobali na nga oyo nako mema ye na Kivu
 Mobali na nga oyo nako mema ye na Kivu
 Oh mobali na nga wana nako mema ye na Haut Zaire
 Mobali na nga wana nako mema ye na Haut Zaire
 Oh mobali na nga oyo nako mema ye na Bas Zaire
 Mobali na nga oyo nako mema ye na Bas Zaire
 Oh mobali na nga wana nako vanda naye na Kinshasa
 Mobali na nga wana na ko vanda naye na Kinshasa
 Oh mobali na nga oyo nako talisa ye na ba nkoko
 Mobali na nga oyo nako talisa ye na ba koko
 ♪
 Soki ba petit ba leli nzala mema mukwa
 Soki ba petit ba leli nzala mema mukwa
 Mokwa ya nini
 Mokwa ya lai lai
 Mokwa ya tika nzala soki ba lela beta egogo
 Momwa ya nini ko
 Mokwa ya dikidi
 Mokwa ya tika nzala soki ba lela beta egogo
 Beta egogo na motu
 Beta egogo na motu
 Motu, motu
 Beta egogo na motu
 Beta egogo na motu
 Motu motu
 Ba ma kamata somo na mayele epa ya tata na bango
 Ba ma lela lela ba ma tshunga tshunga motu motu motu eh

 Mobali na nga wana nako landa ye na Africa
 Mobali na nga wana nako landa ye na Africa
 Oh mobali na nga oyo nako landa ye na Brazza eh
 Mobali na nga oyo nako landa ye na Brazza eh
 Oh mobali na nga wana nako landa ye na Libreville
 Mobali na nga wana nako landa ye na Libreville
 Oh mobali na nga oyo nako landa ye na Yaounde
 Mobali na nga oyo nako landa ye na Yaounde
 Oh mobali na nga wana nako landa ye na Lagos
 Mobali na nga wana nako landa ye na Lagos
 Oh mobali na nga oyo nako landa ye na Abidjan eh
 Mobali na nga oyo nako landa ye na Abidjan eh
 Oh mobali na nga wana nako landa ye na Lome eh
 Mobali na nga wana nako landa ye na Lome eh
 Oh mobali na nga oyo nako landa ye na Cotonou
 Mobali na nga oyo nako landa ye na Cotonou
 Oh mobali na nga wana nako landa ye na Dakar
 Oh mobali na nga wana nako landa ye na Dakar
 Nako landa ye na Bamako
 Conari na Ouagadougou
 Nako landa ye na Bamako
 Conari na Ouagadougou
 ♪
 Soki ba petit ba leli nzala mema mukwa
 Soki ba petit ba leli nzala mema mukwa
 Mokwa ya nini
 Mokwa ya lai lai
 Mokwa ya tika nzala soki ba lela beta egogo
 Mokwa ya nini ko
 Mokwa ya dikidi
 Mokwa ya tika nzala soki ba lela beta egogo
 Beta egogo na motu
 Beta egogo na motu
 Motu, motu
 Beta egogo na motu
 Beta egogo na motu
 Motu motu
 Ba ma kamata somo na mayele epa ya tata na bango
 Ba ma lela lela ba ma tshunga tshunga motu motu motu eh
 Ba ma kamata somo na mayele epa ya tata na bango
 Ba ma lela lela ba ma tshunga tshunga motu motu motu eh
 
Audio Features

Song Details

Duration
10:50
Tempo
128 BPM

Share

More Songs by Mbilia Bel

Similar Songs