Kumama mosantu

3 views

Lyrics

Na bongiseliyo mesa olia
 Nzambe na bomoyi
 Mpe bileyi namemeliyo Yesu
 eza masanjoli ya motema na nga
 Eh yahwe, yahwe kumama
 Biso totongeliyo tente kaka moko eh
 Oyo ovanda
 Mpo biso nionso na Moïse na Eli
 Toza bikelamu Yo nde mokeli eh
 Eh yahwe, yahwe kumama
 alleluia
 na mwana na pate
 obongi na nkembo
 yango basantu toyembi na loyembo
 Eh yahwe, yahwe kumama
 alleluia
 na mwana na pate
 obongi na nkembo
 yango basantu togangi alleluia
 Eh yahwe, yahwe kumama
 Yesu na nga
 Yahwe kumama
 Alleluia
 Mosantu kumama
 Soki Nzoko abungaka te oh
 L'auteur de ses blessures
 C'est le contraire na motema na nga
 Mpo misala na yo ebosanisa nga ba mauvais souvenirs
 Eh yahwe, yahwe kumama
 Papa naloba lisusu nini
 Maloba etondi ngaï na motema
 C'de l'abondance du coeur que la bouche parle
 Kasi ya nga motema ekomio mona
 Neti ka monoko ezoloba maloba ngo malamu te oh
 Yahwe Na nga
 Alleluia!
 alleluia
 na mwana na pate
 obongi na nkembo
 yango basantu toyembi na loyembo
 Eh yahwe, yahwe kumama
 alleluia
 na mwana na pate
 obongi na nkembo
 yango basantu togangi alleluia
 Eh yahwe, yahwe kumama
 Yo nde mwana pate ya bolingo ya Nzambe
 Osimbi fongola ya lobiko ya bato
 Mongongo ewuti likolo toyoka yo
 Eh yahwe!
 Eh yahwe, yahwe kumama
 Kuna likolo y'ozingami na banjelu
 Les 24 vieillards et les 4 êtres vivants
 Ba bwaki mitole na bango mpe balobi
 Ah balobi Mosantu (Musantu)
 Mosantu (Musantu)
 Mosantu eza yo (Mosantu eza yo)
 Oh Mosantu (Musantu)
 Yeah Mosantu eh (Musantu eh)
 Oh Mosantu (Musantu)
 You are Holy (You are Holy)
 HolyYou are
 Tu es saint (Tu es saint)
 Oh tu es Saint, Saint, Saint (Saint, Saint, Saint)
 Kumama Yahwe, eh yahwe...
 Kumama Yesu na ngaï
 Kumama mosantu na lola
 To ye koyembela yo
 Tomemeliyo mpaka malasi
 Tosopi mitema Yesu
 Basantu totomboli bozambe na yo
 Kumama Yahwe
 Kumama Yahwe
 Sujet ya masanjoli na nga
 Ezali yo Elombe
 Sujet ya loyembo ya Schekina
 Ezali yo Elombe
 Nzambe oy'alalakate
 Ezali yo Elombe
 Mokonzi oy'akufaka te
 Ezali yo Elombe
 Papa oy'abwakaka te
 Ezali yo Elombe
 Mobali oy'aboyaka te
 Ezali yo Elombe
 Oh Kumama Yahwe, Kumama Yahwe,
 Na bwaki lolendo na nga
 Liboso na yo mokonzi
 Na bwaki ba grade na nga
 Liboso na yo mokonzi
 Nakiti na mabolongo yaya
 nakumameliyo Mosantu
 Nakiti na mabolongo Yesu
 namemeliyo nde loyembo
 Na bwaki boyebi na nga
 Liboso na yo mokonzi
 Na bwaki makasi na nga
 Liboso na yo mokonzi
 Eh yahwe kumama na yo (Kumama)
 Yo nde Nzambe na lola (Kumama)
 Yo nde Nzambe na bomoyi (Kumama)
 Nionso ebonga na yo nkolo (Kumama)
 Nani aza lokola yo (Kumama)
 Azali te namoni te (Kumama)
 Nkolo yamba loyembo (Kumama)
 Ya mitema basantu (Kumama)
 Oh Kumama Yahwe, Eh Yahwe...
 Kumama na yo eh
 Mosantu abato avandi na lola
 Papa bakita yo
 Yesu wumela Nzambe
 Bongang'oya ngolu yaya
 Yoka mpimbo a masanjoli na nga
 Nzambe oy'akosa Jamais
 Ezali yo Elombe
 Mokonzi a bapota mitema
 Ezali yo Elombe
 Papa kumama na yo
 Yo mosantu kumama eh
 Elombe oh Yesu Elombe
 Elombe oh Tu as gagné
 Elombe oh Yesu Elombe
 Yahwe kumama na yo
 Yo mosantu kumama
 Kumama!
 

Audio Features

Song Details

Duration
06:40
Key
6
Tempo
95 BPM

Share

More Songs by Mike Kalambay

Similar Songs