Matondo

3 views

Lyrics

Hum! Matondo
 Nazo luka ba reconnaissants,
 Baya topesa na Nzambe matondo
 Nini yango toza nango na mokili oyo ya nse,
 Ewuti na Nzambe te
 Pema ya bomoyi, mituka, mapango, molato,
 Mibembo, tozui ya ofele
 Nani azo ndima que azalaka elembo ya ngolu eh
 Nani wana azo ndima que azalaka mbuma ya ngolu ya Nzambe
 Atombola ata mosapi tomona ye
 Nga yeyo! Nga yeyo!
 Pesa ye Matondo, Matondo
 Bakisa lisusu, Matondo
 Libala oyo ba mingi baluka na ba sacrifices
 Luzizila, Mangengenge, Intendance
 Ozui yango na pete omitunaka ata te,
 Ofuta lomeya na nani
 Eza pona kitoko eh? Na ndimi te
 Oyayaya yeh
 Est-ce que eza pe pona ba mbongo eh?
 Vraiment na ndimi te
 GO!
 Asali yo bolamu ebele,
 Emonani na miso
 Est-ce que opesi ye ata merci ya Pamba eh
 pesa ye Matondo
 Asali yo bolamu ebele, emonani na miso
 Han! Est-ce que opesi ata merci ya pamba eh,
 Pesa ye Matondo
 Han! Kasi pesa ye Matondo, Matondo
 Eh yah! Bakisela ye lisusu, Matondo
 Mosusu ye wana na ba poudre na mutu,
 Natuni bayebisi ngai alongi eh
 Na minerval ya pasi, syllabus ya pasi
 bakisela ye ligne onze epayi
 Ye wana alongi eh,
 Hé! Mokonzi opesi ye diplôme eh,
 Muana etike alongi eh ye ye
 Ba mingi bakatani, ye alongi eh na ngolu,
 Na ngolu
 Apesi yo Matondo, Matondo
 Han! Abakiseli yo lisusu uh,
 Matondo
 Music!
 Uh!
 Célébrez!
 Mais c'est très simple que ça,
 Dis tout simplement merci
 Matondo, Aksanti, Tuasakidila
 Je ne peux pas le nier,
 Mon Jésus tu m'as fait du bien
 Comment ne pas dire merci
 à celui qui est tout pour moi
 Alors voici ma reconnaissance
 pour tous tes bienfaits
 Seigneur reçois des cris de joie Wuuuuuuu
 Nzambe ya ba nzela ebele, ebele
 Nga ko relations te, expérience kutu koloba te
 Hé! Hé! Hé! Nasituka boye! Promotion
 Bayama namati ba niveaux
 ekomi ti ba changer nga bureau eh
 Hé nga namati ba grade eh,
 Ba nommer nga, kombo ebimi na journal officiel eh
 Officiel eeh
 Han! Napesi yo Matondo, Matondo, Matondo
 Biso nionso toloba Matondo
 Oh yayaya
 Osali nga bolamu ebele, emonani na miso
 Nalingi napes'o ata merci ya Pamba eh
 napesi yo Matondo
 Osali nga bolamu ebele trop, emonani na miso
 Naye naloba ata thank you Papa oh,
 Napesi yo Matondo
 Osali ya mingi to decidé lelo tomemela yo loyembo
 Oh oh oh oh oh oh
 Matondo a manza ntenta Matondo, Matondo
 Moto okufela na ekulusu, azongiseli yo Matondo, Matondo
 Nga yeyo balingaki bakunda vivant, napesi yo Matondo, Matondo
 Opakoli nga mafuta n'o ya sika, tala nangali lisusu uh, Matondo
 Ololololo
 Onana nananana
 Masiya kumama eh lele
 Yahwe kumama
 Masiya kumama eh yo
 Han ah Yahwe kumama
 Nkolo Yesu Mokonzi, Mokonzi na ngai, Ah kumama eh lele
 Yahwe kumama
 Ya Yesu Mokonzi ya bomoyi ya basantu kumama eh yo
 Han ah Yahwe kumama
 Hei! Masiya kumama eh lelele
 Yahwe kumama
 Tombwama, tombwama, tombwama, tombwama kumama eh lele
 Han ah Yahwe kumama
 Merci Jésus
 Pour tout, je dis merci
 Hum!
 Osali nga bolamu ebele, ndima napes'o ata merci ya pamba eh
 Yesu osali nga bolamu ebele

Audio Features

Song Details

Duration
05:13
Key
10
Tempo
104 BPM

Share

More Songs by Mike Kalambay

Similar Songs