Mobali Na Ngai Wana

1 views

Lyrics

Likambo ya motema oyo
 Likambo ya motema oyo
 Bako samba bako lemba
 Bako silisa ba zuzi
 Moto alingi alingi
 Mobali ya motindo oyo
 Mobali ya motindo oyo
 Kitoko etondi na nzoto
 Azali pe na mwa mbongo
 Na moni akoki na ngai
 Na zela te naya ko zanga
 Na zela te naya ko zanga
 Ko bala ekoma na chance
 Basi kitoko ba tondi mboka
 Ba zanga mabala ba tula
 Likambo ya bolingo oyo
 Bolingo ya mobali oyo
 Ebeti ba ngonga na mboka
 Bato na bato ba ganga
 Moto na poni na poni
 Mobali na nga wana nako mema ye na mokongo
 Mobali na nga wana nako mema ye na mokongo
 Oh mobali na nga oyo nako leisa ye na maboko
 Mobali na nga oyo nako leisa ye na maboko
 Mobali na nga wana nako leisa ye lokola
 Mobali na nga wana nako leisa ye lokola bebe
 Oh mobali na nga oyo na sanola ye suki ngai moko
 Oh mobali na nga oyo na sanola ye suki ngai
 Oh mobali na nga wana na longola ye manzaka nga moko
 Mobali na nga wana na longola ye manzaka ngai moko
 Oh mobali na nga wana nako kufa kaka mpo naye
 Mobali na nga wana nako kufa kaka po naye
 Likambo ya mobali oyo
 Likambo ya mobali oyo
 Na moni mpasi po na ekolo
 Ye moto ngai pe moto
 Nako kamwa tina bako boya
 Mobali na nga ya kitoko
 Mobali na nga ya motema
 To keseni na ba mbula
 To keseni na ekolo
 Nako vanda kaka na ye
 Bolingo ya ba mbula oyo
 Bolingo ya ba tango oyo
 Eponi ekolo te maman
 Eponi couleur te tata
 Toko luka kaka to bala
 Oh pesa nga chance na bala
 Bo pesa nga chance na bala
 Mobali na nga maboko pete
 Akaba mingi ya mingi
 Nako kufa kaka na ye
 Mobali na nga wana nako mema ye na mboka
 Mobali na nga wana nako mema ye na mboka
 Oh mobali na nga oyo nako mema ye na Equateur
 Mobali na nga oyo nako mema ye na equateur
 Oh mobali na nga wana nako mema ye na Kasai
 Mobali na nga wana nako mema ye na Kasai
 Oh mobali na nga oyo nako mema ye na Bandundu
 Mobali na nga oyo nako mema ye na Bandundu

Audio Features

Song Details

Duration
10:52
Tempo
128 BPM

Share

More Songs by Tabu Ley Rochereau'

Similar Songs