Lokumu eza ya Yo

3 views

Lyrics

Oza Nzambe na bolingo
 O bongi na lokumu
 Yahweh lokumu eza ya Yo
 Yahweh lokumu eza ya Yo
 Sala nga na yeba eh
 Baposa ya Motema na Yo
 Loba nga na yoka eh
 Mabanzo ya molimo na Yo
 Bongo nga na kokisa Papa eh
 Baposa ya Motema na Yo eh
 Bongo nga na loba maloba eh
 May'e ekosimba Yo
 Loba nga na yoka eh
 Mabanzo ya molimo na Yo
 Simba nga na ningana eh
 Na nguya ya Loboko na Yo
 Bongo na misopa Papa eh
 Mabolongo na sé, na sanjola
 Na mitika Yahweh, liboso na Yo
 Oza Nzambe na bolingo (oza Nzambe na bolingo)
 O bongi na lokumu, Yesu eh (o bongi na lokumu)
 Yahweh lokumu eza ya Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo)
 Lokumu eza ya Yo eh (Yahweh lokumu eza ya Yo)
 ♪
 Sala nga na mona eh
 Nguya ya loboko na Yo
 Mimonisa na kamwa eh
 Nkembo ya Bonzambé na Yo
 Bongo nga na tatola Papa eh
 Makoki na Yo Mosantu eh
 Bongo nga na sanjola yaya eh
 Na loléngé olingi-oh
 Mimonisa na kamwa eh
 Nkembo ya Elongi na Yo
 Simba nga na lenga eh
 Na nguya ya Loboko na Yo
 Bongo nga na loba maloba eh
 Na maye o' na moni na Yo
 Bongo nga na sanjola yaya eh
 Monéné na Yo
 Oza Nzambé na bolingo (oza Nzambé na bolingo)
 O bongi na lokumu, Yesu eh (o bongi na lokumu)
 Ah, Yahweh lokumu yango ya nani? (Yahweh lokumu eza ya Yo)
 Mokonzi lokumu yango ya Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo)
 Sala nga na tatola eh
 Nguya ya Loboko na Yo
 Kokisa na yemba eh
 Bilaka ekoma loyembo oh
 Nde nge Yo osalaka Papa eh
 Yango nde ekoma mabina
 Bongo nga na tatola Papa eh
 Na mabota nionso
 Oza Nzambé na bolingo (oza Nzambé na bolingo)
 O bongi oh (o bongi na lokumu) obongi na lokumu Yahweh na nga
 Papa lokumu eza ya Yo eh (Yahweh lokumu eza ya Yo)
 (Mokonzi lokumu eza ya Yo eh) Yahweh lokumu eza ya Yo
 Ebandeli pé suka na nionso, lokumu eza ya Yo eh (Eh Yahweh, Yahweh lokumu eza yayo)
 Mokokisi na nionso Papa, lokumu eza ya Yo eh (Yahweh lokumu eza ya Yo)
 Ba honneurs, ba acclamations ebongi na yo Papa (eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya Yo)
 Malasi ya kitoko pé ya valeur, na sopi yango na makolo na Yo (Yahweh lokumu eza ya Yo)
 Motolé ya nkembo, elamba ya lokumu ebongi na yo mokeli na nionso eh (eh Yahweh, Yahweh lokumu eza ya Yo)
 Yahweh Lokumu eza ya Yo (Yahweh Lokumu eza ya Yo)
 Yahweh Lokumu eza ya Yo (eh Yahweh, Yahweh Lokumu eza ya Yo)
 Lokumu eza ya Yo
 Lokumu eza ya Yo
 Lokumu sé ya Yo
 Lokumu eza ya Yo
 Ebongi na moto té o
 Lokumu eza ya Yo
 Solo na batu ya mokili té oh
 Lokumu eza ya Yo
 Eh Yahweh, yaya
 

Audio Features

Song Details

Duration
05:41
Tempo
84 BPM

Share

More Songs by Gael Music

Similar Songs