Jalousie

3 views

Lyrics

Motema mabe nayo eleki ee
 Papa, obosana bolamu nyoso nasalela yo (koko Nyboma)
 Motema sanduku ebomba nde makambo ebele mwana oyo, oh ngai nayo
 Oh nga na yo kotongo na kofingaka ngai eleki
 Okende koboma boma epayi ya bato
 Okoluka liwa na ngai mpo na nini?
 Tobotama moto na moto na etoile na ye
 Boni bokomi koteka koluka moto na ngai
 Boni bokomi koluka kosakana na na kombo na ngai
 ♪
 Banzambe nyoso bosilisa kosambela
 Bible na maboko pe lokuta na monoko botika te
 Mwana oyo bizeti nayo eleki, fongola motema eeee
 Bakwiti nayo eleki
 Kosambela nayo papa okosaka nde bato
 Songi songi nayo mabe ekomi nde kindoki
 Kimobange nayo mabe ohh
 Balobela ngai na tiaki tembe
 ♪
 Motema makasi nayo eleki
 Papa obosana bampasi tomona ayo
 Motema sanduku ebomba nde makambo ebele mwana oyo, oh ngai na yo
 Kotongo ngai na kofingaka ngai eleki
 Okende kotongotongo ngai epayi ya bafami nayo
 Okende koboma boma ngai epayi ya fami nayo
 Tobotama moto na moto na chance naye
 Tobotama moto na moto na etoile naye
 Boni bolingi kosakana na kombo na ngai Remy?
 Boni bokomi koluka kosakana na kombo na ngai
 Bandako nyoso bosilisa kokotakota
 Bible na maboko pe lokuta na monoko botika te
 Mwana oyo bomoto nayo wapi?
 Mwana oyo bilangwa nayo eleki ee
 Kosambela nayo papa okosaka na
 Songisongi nayo mabe ekomi nde kindoki
 Kimobange nayo mabe
 Balobela ngai na tiaki tembe
 ♪
 Jalousie, ee jalousie nayo
 Eleki papa ee yango wana bakangi yo ndoki
 Jalousie, ee jalousie nayo
 Eleki makasi Mosala ozua ze kotongo bato
 Motema nayo mabe eleka makasi
 Yango ekomi kiwelewele
 Yango ekomi bilombalomba
 Okondima ah-ah-ah-ah okondima, bo ko ndima
 Oko ndima eh oko ndima
 Boni olukeli ngai liwa
 Ozali eloko nini
 Bayeba yo c'est que mabe
 Yango balaka te
 Yeba kombo na ngai Fidel Congo
 Ngando na nse ya mayi
 Fidel okola mabanga, beta beta
 Mpona nini olingi ngai nakufa papa ee
 Jalousie, ee jalousie nayo
 Eleki papa ee yango wana bakangi yo ndoki
 Jalousie, ee jalousie nayo
 Eleki makasi Mosala ozua ze kotongo bato
 Motema nayo mabe eleka makasi
 Yango ekomi kiwelewele
 Yango ekomi bilombalomba
 Okondima ah-ah-ah-ah okondima
 Mais oko nidma eh (okondima)
 

Audio Features

Song Details

Duration
07:08
Tempo
118 BPM

Share

More Songs by Madilu System

Similar Songs