Voisin

3 views

Lyrics

Na sala yo nini eh, Voisin na ngai?
 Na defa eloko nini eh Epayi na yo?
 Papa, na bomela yo nani eh
 Na famille nayo?
 Tata oyo,
 Yo motema mabe eh
 Voisin na ngai, motema mabe
 Ye ko mokhristu.
 Aloki mwana ya bato
 Eyenga nyoso Na ndako ya Nzambe
 Lelo oyo,
 Bakangi ndoki na quartier.
 Ale mwana ya bato, tata oyo
 Simetiele ba sala po na biso nyoso.
 Lopitalo ezali po na biso nyoso
 Ah nga olukela nga makambo,
 Po na nini eh.
 Tata oyo Yo motema mabe eh
 Luka vie nayo. Tika ngai eh
 Voisin eh Motema mabe boye
 Nyboma, talela ngai voisin oyo.
 Mosala ko funda ngai Ti na mosala, papa.
 Ba longola ngai Na mosala eh
 Lofundu ya nzinzi esukaka
 se na kombo eh.
 Mabele oyo to nyataka
 ezali po na nga na yo te.
 Nzambe, Nzambe soki lifelo ezalaka
 Zikisa nga moto ya liboso mawa.
 Mbanda asepela.
 Nzombo Faustino aziki
 Na tango ya kala to zalaka ko kata ba kisi
 Lelo ekoma moto nyoso bible na maboko
 (Yaka eh)
 Yaka Yesu soki suka ya molongo
 Yebisa nga na milengela
 Il parait na komi mobange
 Ngai mokhristu na yo
 Voisin Yo motema mabe eh.
 Au lieu odebrouille vie na yo,
 Kaka ko funda bato.
 Mosala ko langwa Na tongo ba monaka yo osambelaka.
 Nzoka motema nayo, etonda mabe eh.
 Voisin eh, luka vie na yo
 Tika lokuta.
 Tika ko landa vie ya bato.
 Voisin na ngai, yo motema mabe.
 Ama Mpika landa ye
 Lofundu ya nzinzi esukaka
 se na kombo eh.
 Mabele oyo to nyataka
 ezali po na nga na yo te.
 Nzambe, Nzambe soki lifelo ezalaka
 Zikisa nga moto ya liboso mawa
 Mbanda asepela.
 Nzombo Faustino aziki

Audio Features

Song Details

Duration
08:00
Key
2
Tempo
128 BPM

Share

More Songs by Madilu System

Similar Songs