Si je savais ça

3 views

Lyrics

Chico Mawatu
 Kamolela ngai guitar oyo ko
 Zongisa ngai esika ba pimelaka nga na mokili
 Ah, si je savais ça
 Bolingo Somi Somida
 Lolango nayo epayi ya ba susu eh
 Ngai ko ekenge lokola liso ko leka nyau eh
 Zongisa amour na nga na congelateur
 Mokolo yo oko zonga o tiya yango na micro onde
 Ko belisa ngai mingi te po oko lia ngai saignant
 Wana oko lia ngai malamu
 Ba zua oh, lolango nayo epayi ya ba susu eh
 Ngai ko nzete ya mbila yo-yo-yo
 Bomengo elekelaka wapi
 Po bango ba zuaka
 Na matanga to na ba feti
 Somi somida oko luka ngai
 Biso to zelaka se ya Nzambe
 Po a pesaka temps plein
 Boni yo oko pesanga manga ya mobesu papa
 Basi ba kanoli eh
 Si je savais ça
 Ba zua oh
 Bomengo nayo epayi ya basusu eh
 Ngai ko nzete ya pondu oh oh
 Awa ko otiki nga na zemi
 Monoko eko senga tondolo
 Na pokwa eko luka ngaï-ngaï
 Litonge papa ko zangisa te
 Na ko kufa liwa ya ngungi, ya nioka ba bete ba lembe te
 Nani a mi boma se Yésu, tóyoka te
 Ebele ba mi boma kaka se po ya bolingo eh
 Si je savais ça
 Ba zua oh
 Lolango nayo epayi ya ba susu
 Ngai ko nzete ya mbila yo-yo-oh
 Bomengo elekelaka wapi, po bango ba zuaka
 Na matanga to na ba feti
 Somi Somida oko luka ngai
 Biso to zelaka se ya Nzambe
 Po apesaka temps plein
 Boni yo oko pesanga manga ya mobesu papa
 Basi ba kanoli eh
 Si je savais ça
 Ba zua eh eh
 Libenga nayo epayi ya basusu eh
 Ngai ko nzete ya pondu, ngo-oh-oh
 Awa ko otiki nga na zemi
 Monoko eko senga ntondolo
 Na pokwa eko luka ngaï-ngaï
 Litonge papa, ko zangisa te
 Na ko kufa liwa ya ngungi, ya nioka ba bete ba lembe te
 Nani a mi boma se po ya Yésu, to yoka te oh
 Ebele ba mi boma kaka se po ya bolingo eh
 Si je savais ça
 Moyi ebimaka sé po ya moto nionso, basusu bako profiter nango, ngo oh
 Libóké ya moninga o sombela yango kwánga
 Soki oza na mwa ndámbo ya espoir, ngo oh
 Ba décisions na zwelaka yo na nzela ya zando
 Na miso nayo na komi baba, Adam Bombole
 Ngo oh, Mema Mvuama
 Boko leka wapi eh
 Na zongi sima, na kamati position
 Ba déceptions epa' na nga mbala misato eleki mbeka
 Na zongi sima
 Ki bo mbanda pasi eh
 Na zongi sima, na kamati position
 Ba coups epayi nanga mbala misato eleki mbeka
 Na suki awa
 Boko leka wapi eh
 Na zongi sima, na kamati position
 Ba déceptions epa' na nga mbala misato eleki mbeka
 Na zongi sima

Audio Features

Song Details

Duration
06:56
Key
7
Tempo
100 BPM

Share

More Songs by Madilu System

Similar Songs